Rhapsody Global Club ( Mandate 1B ROR Influences )
Rhapsody Global Club ( Mandate 1B ROR Influences )
March 1, 2025 at 05:09 PM
Rhapsody Lingala Sun Mar 02 2025 KOKOMA CONSCIENT MINGI YA KLISTO KATI NA YO Mpe Liloba akómaki mosuni, mpe afandaki kati na biso, (mpe tomonaki nkembo na ye, nkembo lokola ya mwana se moko ya Tata,) atondi na ngolu mpe na bosolo (Yoane 1:14). Tango tolobi moklisto azali moko oyo Klisto afandaka kati na ye, mokakatano ezali ete mingi te bayebi kutu nini Klisto alingi koloba to nani Klisto azali. Ndimbola ya liloba Klisto ezali nini? Klisto ezali liloba ya Liebele mpo na Masiya, mpe Masiya elimboli Mopakolami. Na Kondimana ya Kala, babengaki Ye Masiya, mpe na Kondimana ya Sika, babengaka ye Klisto, kasi bango mibale bazali kolobela moto moko. Oyo Bayuda basosolaki ete azali Masiya ezalaki oyo Mosakoli Danyele abengaki “Mwana ya Moto.” Ntango Yesu amilobelaki lokola “Mwana ya Moto” oyo akotombolama, elingi koloba kobakama na ekulusu, Bayuda batunaki Ye mituna, batunaki, “Mwana ya Moto oyo azali nani?” Bakanisaki ete Klisto akozala na bomoi libela na libela. Biblia elobi na Yoane 12:23, 32-34 : «...Yesu ayanolaki bango, alobi: Ngonga ekoki, Mwana na moto akokumisama...Mpe ngai, soki natomboli likolo uta na mabele, nakobenda bato banso epai na ngai. Yango alobaki, mpo na komonisa liwa nini asengeli kokufa. Bato bazongiselaki ye ete: “Toyoki na kati ya Mibeko ete Klisto akotikala libela na libela. Mwana ya moto oyo azali nani? ” Yesu alobelaki bisakweli ya Danyele mpe yango endimisaki yango. Liloba Mwana na Moto ezali kolimbola Mwana ya Nzambe. Kasi Mwana na Nzambe elimboli te “oyo abotami na Nzambe”; elimboli nde Nzambe na mosuni ya moto. Yango wana ntango Yesu alobaki ete azali Mwana ya Nzambe, bakonzi ya Bayuda bafundaki Ye ete azali kofinga Nzambe. Balobaki, “…Mpo na mosala malamu tobambi yo mabanga te; kasi mpo na kofinga Nzambe; mpe mpo ete yo, lokola ozali moto, ozali komikómisa Nzambe” (Yoane 10:33). Basosolaki ete Masiya, Nzambe oyo amonisami na mosuni, azali oyo Yesu amilakisaki lokola ye. Tango olobi Yesu azali Klisto, olingi koloba Yesu azali Nzambe oyo amonisami na nzoto. Yango ezalaki oyo babakamaki na ekulusu mpo na yango. Kobosana yango ata mokolo moko te. Na likambo mosusu, lokola Malako 14:61-64 eyebisi biso, ntango nganga-nzambe monene atunaki Ye mbala moko, “Ozali Klisto?” mpe Yesu ayanolaki na koloba ete, nganga-nzambe monene apasolaki elamba na ye, kosakolaka ete ezali kofinga Nzambe. Lisakoli wana ememaki Yesu na etumbu ya liwa. Kasi Yesu azalaki na ntina. Azalaki solo Klisto. Masiya to Klisto azali Nzambe na nzoto. Mpe ntango oyambaki Klisto, bomoi na Ye ya bonzambe ezwaki esika ya bomoi na yo ya bomoto mpe emonanaki kati na yo. Okomaki moto ya Klisto kati na yo. Bakolose 1:27 elobi, “...Klisto kati na bino, elikya ya nkembo.” Oyo ezali nkembo mpe ntina ya boklisto —Klisto kati na yo! Bokoma conscient mpe conscient mingi ya réalité oyo lelo, koleka liboso. Prayer / Confession Tata ya bolingo, matondo mpo na emoniseli ya nani Klisto azali—Nzambe amonisami na mosuni. Nasakoli ete Klisto azali na bomoi kati na ngai, mpe bomoi na Ye ya bonzambe emonisami na eteni nyonso ya bozali na ngai. Natambolaka na bososoli ya bosolo oyo, kokokisaka mokano na yo mpe kolakisa nkembo na yo na mokili, na Nkombo ya Yesu. Amen. Further study Bakolose 1:26-27; Yona 1:14 NIV; 1 Timoté 3:16 1-year bible reading plan Marko 9:33-50 & Mituya 9-10 2-year bible reading plan Matai 19:13-22 & Kobima 11 WhatsApp Chanel for rhapsody Translation : https://whatsapp.com/channel/0029Va9SJ9OHFxP0Xh4KCN3F

Comments