
PLANÈTE UNIVERS AVEC JS
June 12, 2025 at 10:37 AM
*"Bolingo ezali bosembo na kati ya bosembo te, bondeko na kati ya kobanga, pole na kati ya molili, solo na kati ya lokuta." – Jacques Malumalu*
Liloba oyo ezali kolakisa makasi ya bolingo ya solo. Bolingo ezalaka kaka na mayoki te, kasi ezali nguya moko ya kobongola makambo, ata na ntango ya pasi mpe ya bozangi bosembo.
Wuta esika bosembo te ezali, bolingo ebalukaka na bosembo.
Wuta esika ya kobanga mpe bokengi, bolingo ebalukaka na bondeko.
Na molili ya bomoi, bolingo ebatelaka pole mpe elendisaka motema.
Na katikati ya lokuta, bolingo etindaka moto atikala na solo.
Liloba oyo etindi biso tótikala na kati ya motema malamu mpe tósala bolingo, ata soki bamilanga nyonso ezali koloba te. Bolingo ya solo ekimaka te esika ya pasi. Ezali kozwa mbongwana mpo na kokangola bozoba mpe komema kimia.
Bolingo ezali pole oyo ekotaka na molili mpo na komemela bato ya bomoi elikya.
